.1. Losambo ya mosali ya Nzambe.

Tokotelema pona kobondela Nzambe.
Tata na biso ya lokolo, tozali awa na pokwa ya lelo pona kokumbamela Yo pe pona kosanjola Yo. Tozali awa na pokwa ya lelo pona koyoka mongongo na Yo. Tozali na mposa na Yo, Mokonzi.
Ngaï moko, ngaï moko mpenza.
Tozali na mposa ete na kati ya bozalisi na Yo na esika eye, Yo osimba moko na moko na kati na biso. Salisa biso na pokwa ya lelo po ete baoyo bayebi Yo na mosika, bapusana mpembeni na Yo, pe baoyo bayebi Yo na mpembeni, bapusa maboko na bango pe basimba Yo, ofungola bango mitema po ete Yo owumela na kati na bango na kotondisama ya Nzambe.
Toleleli Yo Nzambe na biso, to pamboli Yo pona bilaka oyo opesaki biso po na ntina ya kosangana eye, po ete Yo okokisa Liloba na Yo na Kombo ya YéShWa Yé MeShYa. Amen!

2. Mboté pé Liloba ya Nzambe.


Balingami na kati ya Mokonzi-Nzambe, napesi bino mbote na kombo ya YéShWa Yé MeShYa. Namemeli bino bamboté ya bandeko na bino basi pe mibali ya Camerouni. Baoyo boyebaki, baoyo pe bokoyeba te : kasi na mokolo wana, liboso ya bozalisi ya Mokonzi-Nzambe, bokoyeba bango nionso. Mpe tokozala biso nionso na esengo ya kowumela na kati ya bozalisi ya Nzambe na biso.

Botika ngaï na pokwa ya lelo komema bino na Sango Malamu oyo ekomami na mokanda ya Malako. Nzela mibale ya motuya mpenza. Sango Malamu oyo ekomami na Malako.

Totanga liboso, na Eteni 5, na nzela 25 :
« Nzokandé ezalaki mwasi moko azwamaki na mpasi ya kotanga makila wuta mbula zomi na mibale. Amonaki pasi mingi na maboko ya Minganga ya ndenge na ndenge. Abebisaki mbongo mingi oyo azalaki na yango, kasi amonaki ata bokolungonu moke te. – bokolungonu te, kobikasama pe te - Kasi pasi yango elekaki na kokoma lisusu makasi. Tango ayoki bato bazali kosolola na ntina ya YéShWa, ayei na sima ya lisanga ya bato ebele, pe asimbi elamba na Yé. Mpamba te, azalaki komiloba na kati na yé : soki nakoki kaka kosimba elamba na Yé, nakobikisama... » Amen !

Nakosepela kotanga lisusu na mokanda oyo kaka, na mokabo 6. Makambo oyo ezali kosalema na kati ya mibembo mingi oyo YéShWa azalaki kosala tango azalaki nanu na mabele. Eteni 6, kobanda na nzela 53 ti na nzela 56 :

« Esilisi bango koleka ebale, baye na mboka ya Génézarethi pe bakiti na bwato. Tango bango bakiti na bwato, bato bamoni YéShWa pe bakeyi na bingumba nionso ya pembeni, bakomi komema bato ya bokono likolo ya bambetu na bango, na bisika nionso oyo bazalaki koyoka ete yé azalaki. Na bisika nionso oyo bango bazalaki kokoma, na bamboka, na bingumba to na bisobé, bazalaki kotiya ba bikoni na libanda, pe bazalaki kobondela Yé ete atika bango kaka basimba ata ndambo ya elamba na Yé. Oyo nionso asimbaki ndambo ya elamba na Yé, azwaki libikisi. » Alleluyah !

Botika ngaï natanga lisusu na kati ya mokanda oyo kaka, na eteni 10, na nzela 13 : « Bamemelaki Yé bana miké pona ete Yé asimba bango. »

Na makomi mibale ya liboso, bazali kobondela YéShWa Yé MeShYa atika ete ba bikoni oyo basangisaki, bango moko, basimba YéShWa. Mwasi oyo azalaki na mpasi wuta mbula zomi na mibale, ayokaki kaka bato bazalaki kosolola na ntina na YéShWa. Ayei na kati ya ngulupa ya bato pe azwi makanisi ya kosimba YéShWa. Baboti bakobondela YéShWa, Yé, asimba bana na bango.

Nazali na posa te ya kotatola ndenge nini YéShWa akoki kosimba biso... Lelo oyo, nalingi kolobela bino ndenge nini biso tokoki kosimba pe esengeli tosimba YéShWa. Amen ! Ndenge nini BISO... Tango nazali koloba lolenge eye, najali koloba na ntina na biso nionso. Kasi lolenge moko na moko na kati na biso asengeli aloba na kati na yé mpenza, ezali : « Ndenge nini NGAI nakoki kosimba YéShWa ? »

3. Losambo ya mibale ya mosali ya Nzambe.

Tokobondela lisusu Nzambe. Salisa biso, Mokonzi-Nzambe. Tango tozali koyoka boye, bongisa biso Nzambe-Mokonzi, salisa biso na pokwa ya lelo. Na kati ya etonga eye ba bikoni bazali. Na pokwa ya lelo, ezali na basi pe na mibali oyo makambo elekeli bango. Nayebi te ndenge nini, Mokonzi-Nzambe, kasi nayebi ete ezali na mwasi moko na pokwa ya lelo, yé mpenza, oyo akomi na suka. Tika ete yé asimba Yo.
Nabondeli Yo, Tata, osala ye ngolu ete tango azali koyoka Liloba na Yo, yé ayoka mongongo na Yo. Pesa yé makasi ya kopusa loboko na yé pe asimba Yo na pokwa ya lelo. Nayebi libela ete Yo obikisi yé na Kombo ya YéShWa Yé MeShYa. Amen !

4. Ndenge nini kosimba YéShWa?

Ee ! Nazalaki komona mwasi oyo na kati ya ndoto, pe Litatoli eye nionso ezalaki na kati ya motema na ngaï.
Bisika nionso na kati ya misala na Yé, bato oyo boyebaki YéShWa, ba oyo bamonaki Yé, ba oyo bayokaki maloba na Yé, ba oyo bamonaki nionso eye asalaki, basosolaki solo ete Yé azalaki moto ya lolenge bobele lioko.
YéShWa azali moto ya lolenge bobele lioko. Pe na nzela ya likambo eye, YéShWa alataki nzoto ya moto po ete baoyo balingi kondima, bandima, pe baoyo balingi kondima te, batikala lolenge bazali.

Ti tango yo okososola ete YéShWa Oyo Liloba ya Njambe ezali kotalisa biso lilili ya moto pamba, azali moto pamba te, ete Yé azali solo Njambe pe ete na kati na Yé ezali botondisami na Njambe mpenza.

Pe na lolenge eye, tozali kosala bambeba minene. Pamba te, tango tozali koya na masanga lokola lisanga eye, totombalaka mitema na biso te ti na kati ya bozalisi ya Njambe. Tosukaka kaka na momemi-liloba. Pamba te, ngaï nazali kaka momemi-liloba. Kasi YéShWa azali Njambe.
Pe pamba te yé azali Njambe, azali na Nguya-koleka-Nionso. Biblia elobi ete eye nionso ezali pasi po na bato kokokisa miango, ezali pasi te pona Njambe.

Ti kino yo okokanisa na lolenge eye, ti kino yo okomona lolenge eye, ti kino yo okososola, okososola mpenza, okotatola, pe okotelema likolo ya Liloba eye, pona yo, Njambe akozala soki moke te liziba ya mapamboli.

Bisika nionso eye YéShWa azalaki koleka, bato bazalaki komona kaka moteyi. Ngaï, nakanisi te ete YéShWa azalaki kitoko [ya nzoto] lokola ndeko na biso ya Congo.

Ee. Pamba te Biblia ezali koloba na biso na mokanda ya Ishayah ete "Yé azalaki na eloko moko te na lilingi na Yé eye ekokaki kosepelisa moto", ata mwasi kutu te. Ishayah 53 :2-3. Soki azalaki moto pamba, YéShWa alingaki kokufa monzemba. Pe mwasi moko te akokaki kolinga kobalana na Yé. Azalaki kitoko té. Nayebi te ndenge nini makolo na Yé ezalaki. Nakanisi kutu ete azalaki kotelema malamu te likolo ya makolo na Yé.

Kasi baoyo nionso bamonaki Yé, baoyo nionso bayokaki mateya na Yé, mingi balobaki na tango na Yé ete : « Moko te atatolaki lokola Moto oyo ! »

Pe na yango mpenza, bandeko na ngaï mibali pe basi, ezali na moteyi moko te awa na nsé oyo atatoli liloba lokola YéShWa atatolaki. Mbala mingi, bateyi babongolaka mingongo na bango, to pe balukaka maloba ya kafukafu. YéShWa azalaki koluka eloko mosusu te. YéShWa azalaki kobongola mongongo na Yé te. Yé azalaki koloba lokola moyéhuda, lokola moyéhuda nionso.

Kasi eye Yé azalaki koloba ezalaki na Nguya makasi koleka. Ezalaki na kotondisama na Molimo. Pamba té, eye Yé azalaki koloba, ezali Yé moko mpenza. Biblia ezali koloba ete Yé azali Liloba. Kowuta na ebandela ya mokili eye, Liloba Oyo ezalaki elongo na Njambe, pe Liloba Oyo ezalaki Njambe… Liloba Yé meyi. YoHana 1:1-2.

Moteyi azali na motuya moko te, kasi ezali Liloba ya Njambe nde.

Boyebi, pamba te na pokwa ya lelo nazali koteya Liloba ya Njambe, eye nionso nazali koloba eleki ngaï moko mpenza. Ezali likolo na ngaï.

Tango nasololaka elongo na mwasi na ngaï, to pe na bana na ngaï, nasololaka makambo eye ezali na ndelo ya bomoto na ngaï. Kasi tango nazali kopesa Liloba ya Njambe, ezali eloko mosusu. Ezali eloko mosusu mpenza!

Pona nini na kati ya masanga, bato bazelaka suka ya lisanga po ete babikisama? Pona nini?

Ekomami esika moko na kati ya Biblia ete, “Atindelaki bango Liloba, pe Liloba ebikisaki bango!” Psaumes 10:20. Liloba kaka.

Baoyo bayokaki Liloba, pamba te ezali Liloba Ya Njambe. Apostolo Petro alobi na kati ya Biblia ete: “Liloba eye, boyambaki yango lokola Liloba ya Njambe…” Pamba té, yango ezali Liloba ya Njambe mpenza.

Bandeko basi pe mibali, boyebi, soki tozalaki koya na masanga lokola lisanga eye, tomibongisi pona koyoka Liloba ya Njambe, nalobi na bino ya solo, tokokaki komona mpenza mapamboli, kobikasama liboso pe na tango ya mateya, pamba te Liloba ya Njambe ezali na nguya moko ya kosakana te.

OBAKER, na libandela ya misala na yé…

Tango tobandaki mosala ya Njambé na mboka na ngaï, nayebaki eloko monene te na Liloba ya Njambé. Nakanisi lisusu ete ezali nkokoso soki oyebi makambo mingi.

Nayebaki eloko moko monene te mpenza. Nayebaki ata koteya lokola nazali koteya sika oyo te. Nayebaki kaka likambo moko to mibale eye natangaki na kati ya Biblia.

Kasi mbala boni, tango nazalaki koteya, bato bazalaki kobatisama na Molimo Mosantu, pe misusu bazalaki kobokisama. Tozalaki na posa ya kozela suka ya lisanga te.

Na sima ya tango moke, tomonaki neti bolembu. Esengelaki tonganga na sima ya lisanga, konganga po na ete ata mokoni moko ameka komibikisama. Tomilobelaki ete yango ezalaki malonga te. Njambe abongwani? Liloba ya Njambe ebongwani?
Tozwaki tango ya kotuna Njambé ntina na yango.

Likambo moko na eye nionso Njambé alobelaki biso, ezali: “Bato bazali koyoka Liloba na Ngaï lokola Liloba na Ngaï te, pe bino bozali kotalisa Liloba na Njambé, lokola Liloba ya Njambe te, kasi bino bozali kotalisa liango lokola liloba ya bino moko.”

Pé ezali na ntina ya makambo eye mibale ete eloko moko esalemaka lisusu te liboso ya Njambé.

Baoyo bazali kopesa Liloba ya Njambé, baoyo bazali kotatola Liloba ya Njambé, basengeli batika komitalisa lokola bingambé liboso ya bana ya Njambé. Basengeli batikala kaka lokola basali. YéShWa Ha MeShya alobaki na bayékoli na Yé: “Bino bozali basali ya pamba…”

Mateya pona basali ya Njambé.

Bandeko na ngaï basi pé mibali, basali ya Njambé. Topesa motuya nionso na Liloba ya Njambé. Totika Liloba ya Njambé na ngúya nionso. Tolongola bomoto na biso, tolongola lokumu na biso, tolongola mayele na biso. Totika Liloba ya Njambé: pamba té, ezali na ngúya ya kosala na kati ya mitema ya baoyo bazali koyoka yango.

Abongwami bobele na Liloba ya Njambé.

Kaka na koyoka Liloba ya Njambé, nayebi makambo ebele.

Boyebi, nayei na nzela ya YéShWa liboso mboka na ngaï ezwa lipanda. Na mboka Camerouni ya ba falancé, ata litatoli moko ya Plein Evangile ezalaki te. (à suivre...)